Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 29

Mongongo ya Yawe

1 Nzembo ya Davidi.

Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe,

bopesa Yawe nkembo mpe makasi.

2 Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye ;

bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.

3 Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi,

Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito,

Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.

4 Mongongo ya Yawe ezali na nguya ;

mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.

5 Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele ;

Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani.

6 Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe,

apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa.

7 Mongongo ya Yawe ebimaka

elongo na bakake ya moto.

8 Mongongo ya Yawe elengisaka esobe ;

Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi.

9 Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota,

esalaka mpe ete zamba etikala pamba.

Kati na Tempelo ya Yawe,

nyonso egangaka : « Nkembo »

10 Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi

na likolo ya mpela ;

Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi

lokola Mokonzi mpo na libela.

11 Yawe apesaka bato na Ye makasi ;

Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.

Veja também