Amor próprio
O amor próprio saudável reconhece o valor que Deus nos deu. Fomos criados à imagem de Deus, maravilhosamente formados. Aceitar-se é honrar o Criador.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai
kososola makanisi na Yo !
Tala ndenge motango na yango ezali ebele !
Nameki kotanga yango,
ezali ebele koleka motango ya bambuma ya zelo.
Nalamuki, nazali kaka elongo na Yo.
Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike,
otelemisi ndako batonga makasi,
mpo na kotelemela bayini na Yo
mpe kokanga monoko ya monguna
mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.
Tango natalaka Lola na Yo,
mosala ya misapi na Yo,
sanza mpe minzoto oyo otia,
namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye,
mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?
Wuta na putulu, atombolaka
moto oyo akelela ;
wuta na fulu ya matiti,
abimisaka mobola
mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi,
na bankumu ya bato na Ye.
Kasi Yawe alobaki na Samuele :
— Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.
Boni, batekaka te bandeke mike mitano na motuya ya mbongo ya bibende mibale ? Nzokande, Nzambe abosanaka ata ndeke moko te kati na yango. Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te ; boleki bandeke mike ebele na motuya.
Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.