Publicidade

Bom dia

Por Bíblia Online

Cada manhã é presente de Deus. As misericórdias do Senhor se renovam cada dia. A Bíblia convida a começar o dia com louvor, oração e gratidão ao Criador.

Manhã com Deus

De manhã te apresentarei a minha oração. Pela manhã ouvirás a minha voz — eu te busco ao despertar.

Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai,

yoka koganga na ngai

wana nazali kosenga lisungi,

pamba te nazali kobondela nde Yo.

Boni, bikamwa na Yo eyebani kati na molili,

mpe bosembo na Yo, kati na mokili

ya bato oyo babosana ?

Nzambe, lendisa motema na ngai ;

Nzambe, lendisa motema na ngai.

Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.

Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ;

soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.

Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ;

soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.

Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo,

nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo,

pamba te ozali ebombamelo na ngai,

mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.

Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo,

pamba te natia elikya na ngai kati na Yo.

Lakisa ngai nzela ya kolanda,

pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.

Mpo na ngai, sima na ngai kolonga,

nakotala elongi na Yo ;

sima na ngai kolamuka,

nakosepela na komona Yo !

Misericórdias renovadas

As misericórdias do Senhor se renovam cada manhã. Este é o dia que o Senhor fez — alegremo-nos e nos regozijemos nele.

Bolamu ya Yawe esili te,

mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;

ekomaka ya sika tongo nyonso.

Solo, boyengebene na Yo ezali monene !

Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ;

yango wana nakotia motema epai na Ye»

Bolamu ya Yawe esili te,

mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;

ekomaka ya sika tongo nyonso.

Solo, boyengebene na Yo ezali monene !

Tala mokolo oyo Yawe asali ;

tika ete tosepela mpe toganga na esengo

mpo na mokolo yango !

Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi,

obatelaki bomoi na ngai

mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.

Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe,

bino babulami na Ye ;

bokumisa Kombo na Ye ya bule.

Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe,

bino babulami na Ye ;

bokumisa Kombo na Ye ya bule.

Akitisaka makelele ya bibale minene,

makelele ya bambonge na yango

mpe makelele ya bikolo.

Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo

mpe tokoganga na esengo,

mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.

Louvor matinal

Saciai-nos de manhã com a tua benignidade. Todo dia te louvarei e celebrarei o teu nome para sempre.

Bokonzi na Yo ezali na suka te

Masanzoli. Nzembo ya Davidi.

Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai ;

nakopambola Kombo na Yo seko na seko.

Mikolo nyonso, nakopambola Yo

mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.

Ezali malamu kokumisa Yawe

Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.

Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe

mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na

Yo-Oyo-Oleki-Likolo !

Mokili mobimba esanzolaka Yawe, Mokonzi na yango

Boyembela Yawe nzembo ya sika !

Bino nyonso, bato ya mokili mobimba,

boyembela Yawe !

Boyembela Yawe,

bopambola Kombo na Ye !

Bopanza sango ya lobiko na Ye,

mokolo na mokolo !

Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota !

Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa

kati na bikolo nyonso.

Nalingaka mibeko na Yo mingi !

Nakanisaka yango mikolo nyonso.

Mozindo ebendaka mozindo

tango bambonge na Yo nyonso etombokaka ;

Ezala ya mike to ya minene, elekaka likolo na ngai.

Oh Yawe, yokela biso mawa, tozali kotalela Yo !

Tongo nyonso, zala makasi na biso,

zala lobiko na biso na tango ya pasi !

Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli,

mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba

moto oyo alembi ;

alamusaka ngai tongo nyonso,

alamusaka litoyi na ngai

mpo ete nayoka lokola moyekoli.

Graça para o novo dia

O Senhor te abençoe e te guarde. Cada novo dia é oportunidade de viver sob a graça do Deus que nos ama.

‘ Tika ete Yawe apambola yo

mpe abatela yo !

Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye

mpe apesa yo ngolu na Ye !

Tika ete Yawe amona yo

mpe apesa yo kimia ’ 

Na tongo, lona milona na yo,

mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te,

pamba te oyebi te milona nini ekobima,

ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.

alamukaka wana butu ezali nanu,

abongisaka bilei mpo na ndako na ye

mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.

Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola ;

sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama,

mpe okozanga te bilei ya kobomba.

Nzambe amonaki ete pole ezali malamu, akabolaki pole na molili. Nzambe abengaki pole « moyi» mpe abengaki molili « butu» Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.

Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.

oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-