Publicidade

Salmos 57

Kimia na kati ya banguna

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te» Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.

2 Oh Nzambe, yokela ngai mawa !

Yokela ngai mawa,

pamba te nazali koluka ebombamelo ;

nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo,

kino tango ya pasi ekoleka.

3 Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo,

epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.

4 Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai,

akopamela bato oyo batungisaka ngai.

Nzambe akomonisa bolingo

mpe boyengebene na Ye.

5 Nazali na kati-kati ya bankosi ;

nalali na kati-kati ya bato

oyo babomaka mpe baliaka bato,

oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo,

mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.

6 Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ;

tika ete nkembo na Yo ezala

awa na mokili mobimba !

7 Batiaki monyama na makolo na ngai

mpo ete nakangama,

batimolaki libulu liboso na ngai,

kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.

8 Nzambe, lendisa motema na ngai ;

Nzambe, lendisa motema na ngai.

Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.

9 Lokumu na ngai, lamuka !

Lindanda mpe nzenze, bolamuka !

Nalingi kolamusa tongo.

10 Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota,

nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.

11 Pamba te bolingo na Yo ezali monene,

ekenda kino na Lola ;

mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.

12 Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ;

mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba !

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-