Publicidade

Salmos 90

Lakisa biso kotanga malamu motango ya mikolo na biso

1 Losambo ya Moyize, moto na Nzambe.

Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso,

na bikeke nyonso.

2 Liboso ete bangomba ezala,

liboso ete okela mabele mpe mokili,

libela na libela, ozali Nzambe.

3 Ozongisaka moto na putulu,

pamba te oloba :

« Bino bato, bozonga na putulu »

4 Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali

lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka,

lokola ngonga moko ya butu.

5 Olekisaka yango lokola pongi ya butu,

oyo na tongo, esilaka lokola lititi.

6 Na tongo, ebimisaka fololo mpe etelaka noki ;

kasi na pokwa, enzulukaka mpe ekawuki.

7 Kanda na Yo elembisaka biso nzoto,

mpe kanda makasi na Yo epesaka biso bobangi.

8 Otiaka masumu na biso liboso na Yo

mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.

9 Mikolo nyonso ya bomoi na biso elimwaka

mpo na kanda na Yo,

mpe mibu na biso esilaka lokola kolela.

10 Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala

mibu tuku sambo

to mibu tuku mwambe mpo na bato

oyo baleki makasi ;

nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko,

pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.

11 Nani ayebi makasi ya kanda na Yo ?

Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo

asosolaka malamu kanda makasi na Yo.

12 Lakisa biso kotanga malamu

mikolo ya bomoi na biso

mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.

13 Yawe, lembisa moke !

Kino tango nini ekowumela ?

Yokela basali na Yo mawa !

14 Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo

mpe tokoganga na esengo,

mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.

15 Zongisela biso na mikolo ya esengo,

mikolo oyo onyokolaki biso ;

zongisela biso na mibu ya esengo,

mibu oyo tomonaki pasi.

16 Tika ete biso, basali na Yo, tomona misala na Yo ;

mpe ete bana na biso bamona kongenga makasi

ya nkembo na Yo !

17 Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso,

ezala elongo na biso !

Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso !

Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-