Colheita
A colheita é princípio bíblico universal: colhemos o que semeamos. Quem semeia na fé e obediência colherá bênçãos abundantes do Senhor.
Semear e colher
Quem semeia no Espírito, do Espírito colherá vida eterna. Não nos cansemos de fazer o bem — ao tempo certo colheremos.
Moto oyo alonaka mpo na kosepelisa baposa ya bomoto na ye akobuka libebi, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo akobuka bomoi ya seko.
Bomikosa te : Nzambe amitikaka te ete batiola Ye. Oyo moto alonaka, yango nde abukaka.
Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
Mpe Ye oyo apesaka nkona epai ya moloni mpe lipa lokola bilei akopesa lisusu, akofulukisa nkona na bino mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino.
Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.
Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa ; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango : bomoi ya bosembo mpe ya kimia.
Fidelidade na semeadura
Honra ao Senhor com as tuas primícias. O Senhor abrirá as janelas do céu e derramará bênção sem medida.
Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo
mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.
Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.
Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango, nakonokisela bino mvula na tango na yango ; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.
Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?
Bilanga ya vino ekawuki,
banzete ya figi elembi-lembi,
banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome,
banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka.
Solo, esengo ya bato esili.
Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te,
nzete ya vino eboti mbuma te,
nzete ya olive eboti mbuma te,
bilanga ebimisi bilei te,
bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango,
mpe bangombe ezali te kati na lopango.
Kasi ngai nakosepela kati na Yawe
mpe nakotondisama na esengo mingi
kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.