Gratidão a Deus
A gratidão a Deus é atitude que transforma a vida. Reconhecer que toda boa dádiva vem de Deus nos leva a louvar, servir e viver com alegria e propósito.
Tudo vem de Deus
Toda boa dádiva vem do alto. Agradecer a Deus é reconhecer que Ele é a fonte de toda bênção e sustento.
Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango,
Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango, pamba te ebulisamaka na nzela ya Liloba na Nzambe mpe libondeli.
Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,
Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso,
mpe mpo ete, na esengo nyonso, bozongisaka matondi epai ya Tata oyo apesaki bino makoki ya kosangana na libula ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te :
bomilendisaka mpe botongaka bomoi na bino kati na Ye, bokangamaka na kondima ndenge bateyaki bino, mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.
Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.
Louvor e gratidão
Louvai ao Senhor e dai-lhe graças! Ele fez maravilhas e é digno de todo louvor e agradecimento.
Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko,
mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.
Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka,
mpe kokisaka bandayi na yo
epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi ;
kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.
Tika ete bato oyo balobaka na ngai :
« Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni !
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya koyemba lokola « Koboma te ! » Nzembo ya Azafi.
Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka,
tokosanzola Yo tango nyonso ;
mpe na bikeke nyonso,
tokosakola lokumu na Yo.
Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi,
bokota na lopango na Ye na kokumisa.
Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.
Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ;
Yawe, zala lisungi na ngai. »
Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ;
olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye,
bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,
bolingo na Ye ewumelaka seko na seko.
Expressões de gratidão
Dar graças com oração e súplica. A gratidão se expressa em palavras, atos e atitudes que glorificam a Deus.
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ;
Ezali mpe malamu te mpo na bino kobimisaka maloba ya bozoba, ya bosoto mpe ya maseki, kasi ebongi nde kozongisaka matondi.
Boye bokokoma bazwi ya biloko nyonso mpo ete bokoka kokabaka tango nyonso ; bongo bato epai ya banani tokopesa makabo na bino bakozongisa matondi epai ya Nzambe.
Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.
na koloba :
« Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Yo oyo ozali mpe ozalaki,
tozali kopesa Yo matondi ;
mpo ete osalelaki nguya monene na Yo
mpe okomaki kokonza.
Bato oyo bakangamaka
na banzambe ya bikeko ezanga tina
babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.