Publicidade

Salmos 75

Nzambe akosambisa mokili

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya koyemba lokola « Koboma te » Nzembo ya Azafi.

2 Nzambe, tozali kosanzola Yo,

tozali kosanzola Kombo na Yo ;

mpo ete Kombo na Yo ezali pene,

bato bazali kotatola bikamwa na Yo.

3 Olobaki :

« Na tango oyo ngai moko nakobongisa,

nakokata makambo na bosembo.

4 Mokili ekoki kolenga

elongo na bavandi na yango nyonso,

kasi ezali ngai nde nalendisaka

makonzi na yango»

5 Nazali koloba na moto ya lofundu :

« Kotombola lisusu mapeka te »

mpe na bato mabe :

« Bosala lisusu lolendo te.

6 Bomeka lisusu te kosala lofundu

mpe koloba na lolendo»

7 Botombwami ewutaka na Este te, na Weste te,

ewutaka mpe na esobe te.

8 Pamba te ezali Nzambe nde akataka makambo :

akitisaka moto songolo

mpe atombolaka moto pakala.

9 Loboko na Yawe esimbi kopo

oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo.

Azali kosopa yango,

mpe bato mabe nyonso ya mokili

bazali komeka mpe komela yango

kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.

10 Mpo na ngai, nakotatola makambo oyo

tango nyonso,

nakoyemba mpo na lokumu ya Nzambe ya Jakobi,

11 oyo azali koloba :

« Nakosilisa makasi nyonso ya bato mabe ;

kasi nguya ya bato ya sembo

ekomata lisusu makasi»

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-