Publicidade

Salmos 70

Nzambe, yaka kosunga ngai

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.

2 Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai !

Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai !

3 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai

bakufa soni mpe basambwa !

Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai

bazonga sima mpe bayokisama soni !

4 Tika ete bato oyo balobaka na ngai :

« Ah ! Ah » bazonga mpo na soni !

5 Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo

batonda na esengo mpe basepela kati na Yo !

Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo

balobaka tango nyonso :

« Nzambe azali monene »

6 Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela,

Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai.

Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai,

kowumela te !

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-