Publicidade

Irrepreensível

Por Bíblia Online

Ser irrepreensível não é ser perfeito — é viver com integridade diante de Deus e dos homens. A Bíblia nos chama a buscar uma vida reta, pura e sem manchas visíveis de hipocrisia.

O padrão divino

Deus é perfeito e chama seus filhos à integridade. A palavra de Deus é purificada e Ele é escudo dos que caminham na retidão.

Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka,

Liloba na Yawe ezali na mbeba te ;

azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye

lokola ebombamelo na bango.

Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ;

mpe na lisungi ya Nzambe na ngai,

nakatisaka bamir.

Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka

Esengo na bato oyo bazangi pamela

mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe !

Ezali moto oyo azangi pamela,

oyo asalaka makambo ya sembo

mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ;

oyo akoselaka moninga makambo te,

asalaka ye mabe te,

mpe ayokisaka ye pasi te ;

Abongiselaka bato ya sembo elonga

mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.

Buscar a perfeição em Cristo

Todos tropeçamos em muitas coisas, mas o alvo é a maturidade. Cristo é a fonte da salvação eterna para todos os que lhe obedecem.

Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.

Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.

bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.

Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko ;

Yesu azongisaki :

Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.

Vida íntegra

Que a vossa alegria seja completa! Vivam em harmonia, sejam irrepreensíveis — transformados pela renovação da mente.

Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka.

Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.

Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

Bokabwani kati na Lingomba ya Kolinto

Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko.

Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.

Ndakisa ya komikitisa ya Klisto

Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino, botondisa motema na ngai na esengo na kozalaka motema moko, bolingo moko, likanisi moko mpe posa moko. Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino. Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu. Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango.

Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe,

amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,

kasi amikomisaki moto pamba,

akomaki lokola mowumbu,

amikomisaki lokola moto

mpe amonanaki bongo lokola moto ;

amikitisaki penza

mpe atosaki kino na kufa,

ata na kufa ya ekulusu.

Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso

mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso,

mpo ete, na Kombo na Yesu,

mabolongo nyonso efukama

kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,

mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo

mpo na nkembo ya Nzambe Tata.

Makambo oyo mondimi asengeli kosala

Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ; pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.

Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe, mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te. Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso. Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai.

Timote mpe Epafrodite

Kati na Nkolo Yesu, nazali na elikya ya kotindela bino Timote kala mingi te, mpo ete nalendisama na basango oyo akopesa ngai na tina na bino. Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino ; bato nyonso oyo batikali balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi bamipesaka te na makambo ya Yesu-Klisto. Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye. Yango wana nazali na elikya ya kotinda ye epai na bino tango kaka nakoyeba ndenge nini makambo na ngai ekosuka. Nandimisami solo kati na Nkolo ete nakoya kotala bino kala mingi te.

Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga. Pamba te azali na posa makasi ya komona bino nyonso mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azali kobela. Azalaki penza kobela kino akomaki pene ya kokufa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, mpe ye moko kaka te kasi ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te. Yango wana nazali kotinda ye noki penza mpo ete, tango bokomona ye lisusu, bosepela, mpe mawa na ngai esila. Boyamba ye na esengo makasi kati na Nkolo mpe bomemiaka bato ya lolenge wana, pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.

Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.

Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ;

soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.

Makolo na ngai elandaki matambe na Ye ;

natambolaki na nzela na Ye

mpe natikalaki kopengwa na yango te.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-