Publicidade

Salmos 15

Nani akoki kovanda esika moko na Nzambe

1 Nzembo ya Davidi.

Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule ?

Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule ?

2 Ezali moto oyo azangi pamela,

oyo asalaka makambo ya sembo

mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ;

3 oyo akoselaka moninga makambo te,

asalaka ye mabe te,

mpe ayokisaka ye pasi te ;

4 asanganaka te na moto oyo asalaka mabe,

kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ;

akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi,

mpe abongolaka mokano na ye te ;

5 asengaka mileki te soki adefisi mbongo,

andimaka kanyaka te

mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te.

Moto nyonso oyo atambolaka bongo

akotikala kopengwa te.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-