Morte de Jesus
A morte de Jesus é o sacrifício supremo do amor de Deus. Na cruz, o Cordeiro de Deus carregou os pecados do mundo, satisfez a justiça divina e abriu o caminho da salvação para todos.
O sacrifício na cruz
Jesus disse: 'Está consumado!' Na cruz, Ele cumpriu toda a lei, pagou o preço do pecado e reconciliou a humanidade com Deus.
Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama :
— Nayoki posa ya mayi.
Lokola ezalaki na mbeki moko etonda na vino ya ngayi pembeni ya esika yango, batiaki, na songe ya nzete moko ya izope, eponze moko epola na vino yango ya ngayi mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu. Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki :
— Nyonso ekokisami.
Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.
Sima na basoda kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na Ye mpe bakabolaki yango na biteni minei : soda moko na moko azwaki eteni moko. Bakamataki mpe nzambala na Ye, oyo ezalaki ya kotongama te, kasi ezalaki kaka elamba moko, kobanda na likolo kino na se.
Basoda balobanaki bango na bango :
— Topasola yango te, kasi tobeta zeke mpo na koyeba soki nani akozwa yango.
Esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama :
« Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango
mpe babetaki zeke mpo na nzambala na ngai. »
Ezali makambo wana nde basoda basalaki.
Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu : Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala.
Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye :
— Mwasi, tala mwana na yo !
Mpe alobaki na moyekoli yango :
— Tala mama na yo !
Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.
Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Yesu alobaki :
— Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala .
Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke. Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki :
— Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !
Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi mpe balobaki :
— Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !
Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo :
Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye :
— Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye :
— Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye ! Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
Bongo alobaki lisusu :
— Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
Yesu azongiselaki ye :
— Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki :
— Eloi, Eloi, lema sabachtani ?
Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »
Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki, bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki : ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango.
Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki :
— Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso,
banyokolaki ye mpo na masumu na biso ;
etumbu oyo ememelaki biso kimia
ekweyaki na nzoto na ye ;
mpe na nzela ya bapota na ye,
biso tobikisami na bokono na biso.
Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme,
moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ;
bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso
na nzoto na ye.
Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi,
kasi atikalaki kofungola monoko na ye te
lokola mpate oyo bazali komema
na esika oyo babomelaka banyama,
lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ;
akangaki monoko na ye.
Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto,
mpe nazali kokoka lisusu koloba te ;
otie ngai pembeni ya lilita.
Bambwa ezingeli ngai,
ngulupa ya bato mabe bayei kobundisa ngai,
bazali kotambola zingazinga na ngai ;
bakangi maboko mpe makolo na ngai na basinga.
Nakoki sik’oyo kotanga ata mikuwa na ngai nyonso ;
kasi bato bazali kotala mpe koseka ngai,
Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi ;
bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.
Bato nyonso oyo bazali komona ngai
bazali koseka ngai, bazali kokamwa,
koningisa mito mpe koloba :
O amor que se entrega
Ninguém tem maior amor do que aquele que dá a vida pelos amigos. Deus prova seu amor em que Cristo morreu por nós quando ainda éramos pecadores.
Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.
Tala ndenge nini toyebi ndimbola ya bolingo : Yesu-Klisto akabaki bomoi na Ye mpo na biso. Boye biso mpe tosengeli kokaba bomoi na biso mpo na bandeko na biso.
Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso ; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.
amikitisaki penza
mpe atosaki kino na kufa,
ata na kufa ya ekulusu.
Morte e ressurreição
Jesus morreu e ressuscitou, e a morte não mais tem domínio sobre Ele. Pelo batismo, participamos de sua morte e ressurreição.
Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te ; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye. Akufaki mpo na lisumu mbala moko mpo na libela ; kasi sik’oyo azali na bomoi, mpe azali na bomoi mpo na Nzambe.
Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu-Klisto tozwaki nde libatisi kati na kufa na Ye ? Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.
Bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya, ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.
Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango, akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu. Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.
Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.
Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga.