Publicidade

Nascimento de bebê

Por Bíblia Online

Cada bebê que nasce é uma dádiva de Deus. A Bíblia celebra o nascimento como obra das mãos do Criador, que forma cada criança no ventre com amor e propósito.

Formados por Deus

Deus tece cada bebê no ventre materno. Antes mesmo de nascer, somos conhecidos e amados pelo Criador de todas as coisas.

Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,

obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.

Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.

Misala na Yo ezali ya kokamwa ;

ngai, nayebi yango malamu.

Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te

tango osalaki ngai na esika ebombama,

tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.

Tango nazalaki nanu na lolenge te,

ozalaki komona ngai ;

mpe omikomelaki kati na buku na Yo

mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai

liboso ete moko te kati na yango ezala.

Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.

« Atiaka motema na ye epai na Yawe ;

tika ete Yawe abikisa ye !

Tika ete Yawe akangola ye,

pamba te asepelaka na Ye »

Ndenge oyebi te nzela ya mopepe

to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye,

ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe

oyo azali Mokeli ya nyonso.

Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota

mpe kozanga makoki ya kobotisa »

Elobi Yawe.

« Nakoki solo kokanga mabota

soki nazali kopesa mabota » elobi Nzambe na yo.

Bênção e presente

Os filhos são herança do Senhor. Cada bebê é uma boa dádiva que vem do alto, do Pai das luzes, motivo de alegria e gratidão.

Bana bazali libula kowuta na Yawe,

mpe kobota bana ezali lifuti.

bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.

Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.

Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.

Acolher as crianças

Jesus acolheu as crianças e as abençoou. O Senhor ama cada pequenino e reserva para eles o Reino dos céus.

Yesu alobaki :

Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.

Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-