Gravidez e maternidade
Gravidez e maternidade são bênçãos celebradas na Bíblia. Deus forma cada criança no ventre, cuida da mãe e da família, e abençoa a geração dos justos.
Filhos são herança do Senhor
Deus abençoa a fertilidade e o crescimento das famílias. Cada criança é obra de suas mãos, conhecida e amada antes mesmo de nascer.
Bokopambolama koleka bato nyonso. Mobali moko te to mwasi moko te akozanga bana, mpe ebwele na yo moko te ekozanga bana.
Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi : batondisaki mokili ya Ejipito.
Bana na ye bakozala bato na nguya
kati na mokili ;
ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.
Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,
obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te
tango osalaki ngai na esika ebombama,
tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
Tango nazalaki nanu na lolenge te,
ozalaki komona ngai ;
mpe omikomelaki kati na buku na Yo
mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai
liboso ete moko te kati na yango ezala.
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota
mpe kozanga makoki ya kobotisa ? »
Elobi Yawe.
« Nakoki solo kokanga mabota
soki nazali kopesa mabota ? » elobi Nzambe na yo.
Força e cuidado na gravidez
Deus dá forças à mulher grávida e a sustenta em cada etapa. Sua graça é suficiente e seu poder se aperfeiçoa na fraqueza.
Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo ;
kondima te ete nayoka soni !
Bikisa ngai na bosembo na Yo !
Oh Nzambe, yoka koganga na ngai,
yoka na bokebi losambo na ngai.
Azali kobatela etonga na Ye
lokola mobateli bibwele :
kosangisa bana meme na maboko na Ye
mpe kokanga bango na tolo na Ye ;
kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi
oyo ezali nanu komela mabele.
Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai,
mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele,
bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama
mpe nandima komema mokumba
wuta mbotama na bino.
Ezala tango bokotonda na suki ya pembe
mpe bokokoma mibange,
Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ;
Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino,
nakosunga bino mpe nakobikisa bino.
A bênção da maternidade
A Bíblia honra a maternidade como ministério sagrado. As mães são instrumentos de Deus para formar vidas e transmitir a fé.
kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.
Bana na ye bakotelema mpo na kokumisa ye,
mpe tala ndenge mobali na ye mpe akumisaka ye :
Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »
Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye. Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye.
Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi.
Boye Ana akomaki na zemi mpe, sima na mwa mikolo, abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Samuele, » pamba te alobaki : « Mpo ete nasengaki ye epai na Yawe. »
Proteção divina
Deus protege a mãe e o bebê, guardando-os de todo mal. Ele acompanha cada momento com ternura e fidelidade.
Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo
ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo
avandaka na se ya bobatelami
ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Nalobaka na tina na Yawe :
« Nzambe na ngai azali ebombamelo
mpe ndako makasi na ngai ;
natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »
Yawe akobatela yo na mabe nyonso,
akobatela bomoi na yo ;
Yawe akobatela kokende
mpe kozonga na yo,
sik’oyo mpe libela na libela.
— Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.
Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi. Kasi soki likama ezali, okofuta bomoi mpo na bomoi :
Boni, mama akoki solo kobosana
bebe na ye oyo azali komelisa mabele,
to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ?
Ata soki akoki kobosana,
ngai nakoki kobosana yo te !
Esperança e promessa
A maternidade é caminho de esperança. Como Sara, Ana e Isabel, as mães encontram na fé a força para aguardar as promessas de Deus.
Mpo na kondima, Sara mpe azwaki makoki ya komema zemi atako mibu na ye ya kobota esilaki koleka wuta kala, pamba te andimaki ete Ye oyo apesaki ye elaka akosaka te.
Esengo na mwasi oyo andimaki ete Nkolo akokokisa elaka oyo apesaki ye !
Bongo Mari alobaki :
— Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo,
mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,
pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye.
Yango wana, kobanda lelo,
bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,
pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ;
Kombo na Ye ezali Bule.
Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye,
lokola mama ya esengo kati na bana na ye.
Bokumisa Yawe !
Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »
Kati na ndako na yo,
mwasi na yo azali lokola nzete ya vino
oyo ebotaka bambuma ebele ;
bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive
zingazinga ya mesa na yo.