Pular para o conteúdo
Publicidade

Protecção e segurança

Por Bíblia Online

Deus é nosso protetor e refúgio seguro. Em todas as circunstâncias, a Bíblia nos assegura que o Senhor guarda, sustenta e protege aqueles que nele confiam.

Deus, a nossa fortaleza

O Senhor é refúgio e fortaleza, socorro bem presente na angústia. Quem habita no esconderijo do Altíssimo descansa à sombra do Todo-Poderoso.

Nzambe azali ekimelo na biso

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

Nzambe azali ekimelo na biso

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

Ebombamelo ya malonga

Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo

ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo

avandaka na se ya bobatelami

ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

Nalobaka na tina na Yawe :

« Nzambe na ngai azali ebombamelo

mpe ndako makasi na ngai ;

natiaka elikya na ngai kati na Ye »

Abombaka yo na se ya mapapu na Ye,

mpe ozwaka ebombamelo ya malonga

na se ya mapapu na Ye ;

bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba

mpe lokola elamba ya ebende.

Ezala bato nkoto moko bakweyi

pembeni na yo,

mpe bato nkoto zomi,

na ngambo ya loboko na yo ya mobali,

ekozwa yo ata moke te.

Soki otatoli :

« Yawe azali ebombamelo na ngai»

mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo,

mabe ata moko te ekokweyela yo,

pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo ;

Nabatelami malamu epai ya Nzambe

Nzembo ya Davidi.

Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;

nakobanga nani ?

Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;

nakolenga liboso ya nani ?

Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ;

lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.

Akonzaka mokili na bosembo,

akataka makambo ya bato na alima.

O escudo do Senhor

Deus nos rodeia com sua proteção como um escudo. Ele é rocha, baluarte e libertador. Sua fidelidade nos cobre e nos guarda.

Ebele bazali koloba na tina na ngai :

« Nzambe akobikisa ye te »

Yawe Abikisaka

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.

Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni !

Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !

Ebele bazali koloba na tina na ngai :

« Nzambe akobikisa ye te »

Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai,

Yo nde omatisaka lokumu na ngai.

Nabelelaka Yawe,

mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.

Nalalaka mpe nazwaka pongi ;

nalamukaka lisusu,

pamba te Yawe azali makasi na ngai.

Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ;

mpe na lisungi ya Nzambe na ngai,

nakatisaka bamir.

alakisaka ngai kobunda,

mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.

Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai,

loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai,

mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.

Bato na Yo bazali na esengo

Nzembo ya Davidi.

Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama ;

Ye oyo akembisaka maboko

mpe makofi na ngai mpo na bitumba !

Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi,

ebombamelo mpe mokangoli na ngai,

nguba mpe ekimelo na ngai ;

Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai.

Ezali Yo, Nzambe, nde opesaka bakonzi elonga,

obikisaka Davidi, mosali na Yo,

liboso ya mopanga oyo ebomaka.

Oh Nzambe, katela bango etumbu.

Tika ete mabongisi na bango ebotela bango libebi.

Bengana bango mpo na ebele ya masumu na bango,

pamba te batombokeli nde Yo.

Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo

lokola ebombamelo na bango

bazalaka na esengo tango nyonso,

tika ete bayembaka mpo na esengo,

bomoi na bango mobimba.

Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo

basepelaka kati na Yo.

Nzambe na ngai, nabelelaka Yo,

pamba te oyanolaka ngai.

Yoka libondeli na ngai.

Yo oyo obikisaka mpe okangolaka,

na nzela ya loboko na Yo ya mobali,

bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango,

lakisa ngai misala kitoko ya bolingo monene na Yo.

Batela ngai lokola mbuma ya liso,

bomba ngai na se ya mapapu na Yo,

mosika ya bato mabe oyo bazali konyokola ngai,

mosika ya banguna na ngai oyo bazingeli ngai.

Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ;

okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.

Mokonzi atiaka elikya na Yawe,

aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.

Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ;

loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.

Ozali ebombamelo na ngai ;

obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te

mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.

Segurança e provisão

O Senhor supre todas as necessidades dos seus filhos. Quem busca o Reino primeiro não precisa temer — nada faltará aos que temem ao Senhor.

Yawe azali Mobateli na ngai

Nzembo ya Davidi.

Yawe azali mobateli na ngai,

nakozanga ata eloko moko te.

Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ;

pamba te bato oyo batosaka Ye

bazangaka eloko moko te.

Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu,

vanda kati na mokili mpe lia na kimia.

Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange,

namoni nanu te moto ya sembo kosundolama

to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei.

Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.

Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.

Molende na mabondeli

Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ; pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.

Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?

Guarda e livramento

O anjo do Senhor acampa ao redor dos que o temem e os livra. Deus promete guardar todas as nossas saídas e entradas para sempre.

Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye ;

abikisaki ye na pasi na ye nyonso.

Mabe ebomaka moto mabe,

mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.

Yawe, Mosungi mpe Mobateli na ngai

Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.

Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba :

lisungi na ngai ekowuta wapi ?

Lisungi na ngai ewutaka na Yawe

oyo akela likolo mpe mabele.

Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ;

Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

Te, Ye oyo abatelaka Isalaele

animbaka te mpe alalaka pongi te !

Yawe azali mobateli na yo ;

Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali,

lokola elili oyo ebatelaka yo.

Ezala na moyi to na butu,

moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te !

Yawe akobatela yo na mabe nyonso,

akobatela bomoi na yo ;

Yawe akobatela kokende

mpe kozonga na yo,

sik’oyo mpe libela na libela.

Nzela ya bomoi

Nzembo ya Davidi.

Nzambe, batela ngai,

pamba te nabombami kati na Yo.

Nzela ya bomoi

Nzembo ya Davidi.

Nzambe, batela ngai,

pamba te nabombami kati na Yo.

Natalelaka Yawe tango nyonso,

pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.

Natalelaka Yawe tango nyonso,

pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.

Yawe, longisa mokonzi na biso

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

Tika ete Yawe ayanola yo

na tango ya pasi ;

tika ete Nzambe ya Jakobi azala

ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.

Batela bomoi na ngai mpe kangola ngai ;

sala ete nayoka soni te,

pamba te nabombamaka kati na Yo.

Lokola mpe natielaka Yo motema,

tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai.

Mpunda ezali na nguya te ya kopesa lobiko,

makasi na yango nyonso ekangolaka te.

Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye,

ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,

mpo na kokangola bango na kufa

mpe kobatela bango na bomoi

ata na tango ya nzala makasi.

Totielaka Yawe motema ;

azali lisungi mpe nguba na biso.

Confiança inabalável

Melhor é confiar no Senhor do que confiar no homem. Quem anda em integridade anda seguro, e a torre forte do nome do Senhor protege o justo.

Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ;

bato bakoki kosala ngai nini ?

Eleki malamu koluka ebombamelo

kati na Yawe

na esika ya kotia elikya na bato.

Kombo ya Yawe ezali

lokola ndako molayi batonga makasi ;

moyengebene akimelaka kuna

mpe azwaka ebombamelo ya makasi.

Kombo ya Yawe ezali

lokola ndako molayi batonga makasi ;

moyengebene akimelaka kuna

mpe azwaka ebombamelo ya makasi.

Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi,

mpe bana na ye bakozwa ekimelo.

pamba te Yawe akozala elikya na yo

mpe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.

Moto ya sembo atambolaka na kimia,

kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama

akobima na pwasa.

Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te,

ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango

lokola ebombamelo na bango.

Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te,

ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango

lokola ebombamelo na bango.

Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka

alima na nzela na ye,

kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.

Moyengebene aliaka mpe atondaka,

kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.

Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,

mpe maloba ya monoko na Ye epesaka

mayele mpe bososoli.

Abongiselaka bato ya sembo elonga

mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.

Pamba te abatelaka bayengebene

mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.

Moto ya mayele amonaka likama na mosika

mpe amibombaka,

kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana

mpe akutanaka na pasi.

Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba,

kasi elonga ewutaka na Yawe.

Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso,

pamba te makambo nyonso oyo tosalaka,

wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.

A presença protetora

O Senhor prometeu estar conosco e nunca nos desampara. Ele é como sombra à nossa direita e fortaleza em todo o tempo.

Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te»

Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo,

azali tango nyonso Mosungi awa na se.

Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo

mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.

Mpo na Benjame, alobaki :

« Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia

pembeni na Ye,

pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ;

mpe moto oyo Yawe alingaka

apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye »

Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi

mpo na kosala yo mabe ekolonga ;

mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa,

okokatela yango etumbu.

Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe,

mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai,

elobi Yawe.

Ndenge esila kokatama,

ye oyo akomitika epai na Yo,

okobatela ye na kimia, na kimia penza,

mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.

Ezala tango bokotonda na suki ya pembe

mpe bokokoma mibange,

Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ;

Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino,

nakosunga bino mpe nakobikisa bino.

Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango,

ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga,

akobatela Yelusalemi,

akobatela mpe akokangola,

akobikisa yango na likama mpe akosunga yango»

Boyekola nde kosala malamu,

boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola,

bobundela mwana etike,

bokotela mwasi oyo akufisa mobali !

Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai,

bokolia mbuma kitoko ya mokili.

Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki,

bokokufa na mopanga»

Pamba te monoko ya Yawe nde elobi.

Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia.

Yawe azali malamu,

azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi

mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.

Promessas de cuidado

Deus garante que nem um fio de cabelo cairá sem sua permissão. Ele deseja que vivamos em paz, confiança e segurança total nele.

Boni, batekaka te bandeke mike mibale na motuya ya mbongo oyo eleki moke ? Nzokande, moko te kati na yango ekweyaka na mabele soki Tata na bino alingi te. Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino. Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.

Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.

Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi suki ata moko te ya mito na bino ekobunga. Boyika mpiko, mpe bokozwa bomoi.

Bongo Yesu atunaki bango :

Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te ; boni, bozangaki eloko ?

Bazongisaki :

Tozangaki eloko te.

Bolingo ya Nzambe epesaka elikya

Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?

Boye tokoki koloba na elikya nyonso :

« Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ;

bato bakoki kosala ngai nini »

Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino.

Yango wana tolalaka pongi te lokola bato mosusu, kasi tosenzelaka mpe tomibatelaka malamu.

Fidelidade e aliança

Deus é fiel à sua aliança. Ele protege cada promessa que faz e guarda os seus como a menina dos seus olhos.

Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela bino liboso ya Satana.

Apesaka biso nyonso oyo tosengaka epai na Ye, pamba te totosaka mibeko na Ye mpe tosalaka makambo oyo esepelisaka Ye.

Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe : soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso. Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.

Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.

Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo ; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko. Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.

Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana.

Nani azali Nzambe soki Yawe te ?

Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?

Sik’oyo, tika ete opambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo ; pamba te oh Nkolo Yawe, Yo nde olobaki, mpe na nzela ya lipamboli na Yo, libota ya mosali na Yo ekopambolama mpo na libela»

Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.

Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili.

Bosalela bikateli na Ngai mpe botosa mibeko na Ngai, bongo bokowumela na kimia kati na mokili ;

Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili»

Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te

soki alakisi mabongisi na Ye te

epai ya basali na Ye, basakoli.

Provisão diária

Deus satisfaz os desejos do coração dos seus filhos. Ele abençoa, renova as forças e sustenta dia após dia quem nele confia.

Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai,

natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani,

nakobomba yango ata moke te.

Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,

nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;

maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,

nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.

Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ;

soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.

Bakoboma bango na mopanga

mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.

Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka,

batondaka na esengo.

Boyembela Nzambe, boyemba banzembo

mpo na lokumu ya Kombo na Ye.

Bofungola nzela mpo na Ye

oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe.

Kombo na Ye ezali Yawe.

Botonda na esengo liboso na Ye.

Yawe Nzambe, tango omataki na likolo,

omemaki bakangami,

ozwaki makabo epai ya bato,

ata epai ya batomboki,

mpo ete okoma kovanda kuna.

Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo,

okogumbamela nzambe mosusu te,

longola kaka ngai !

Lokola kovanda mokolo moko

kati na lopango na Yo

eleki kovanda mikolo nkoto moko

na esika mosusu,

naponaki kotelema na ekotelo

ya Ndako ya Nzambe na ngai

na esika ete navanda kati na bandako ya kapo

ya bato mabe.

Bino bato oyo bolingaka Yawe,

boyina mabe !

Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye

mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.

Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele.

Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.

Molimo na ngai, zongela kimia na yo,

pamba te Yawe asaleli yo bolamu.

Solo, okangoli ngai na kufa,

okawusi mpinzoli na ngai

mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.

Nakotambola liboso ya Yawe

kati na mokili ya bato ya bomoi.

Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai ;

natiaka elikya kati na liloba na Yo.

Nani asalaka nyonso

Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Soki Yawe atongi ndako te,

batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ;

soki Yawe akengeli engumba te,

bakengeli bazali kosala na pamba.

Kuna na Siona, nakobakisa nguya ya Davidi,

mpe nakobimisela ye mokitani, mopakolami na ngai,

lokola mwinda ya kopela.

Nakoyokisa banguna na ye soni,

mpe motole na ye ekongenga na mbunzu na ye»

Yawe akokisaka makambo nyonso

mpo na bolamu na ngai.

Yawe, bolingo na Yo ewumelaka seko na seko !

Kosundola te bato oyo osala na maboko na Yo !

Ofungolaka loboko na Yo

mpe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi.

Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami

mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ;

abimisaka bakangami na boloko.

Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ;

Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ;

Yawe alingaka bato ya sembo.

Yawe abatelaka bapaya,

asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali,

kasi abebisaka banzela ya bato mabe.

Tondisa motema na ngai na esengo

soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.

Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana.

Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana. Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.

Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini 

Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo. Bozali na se ya elakeli mabe, pamba te bino nyonso, ekolo oyo mobimba, bozali kokosa Ngai. Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai» elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.

Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli.

Bwanya ezali lokola nguba,

ndenge mpe mosolo ezalaka nguba ;

kasi litomba ya boyebi ezali ete

ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.

Ndenge moko mpe, Nkolo apesaki mitindo ete bato oyo bateyaka Sango Malamu babika bomoi na bango na nzela ya Sango Malamu.

Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.

Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala»

Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.

Seja o primeiro