Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 81

Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

2 Boganga na esengo

epai ya Nzambe, makasi na biso !

Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko !

3 Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike,

lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze !

4 Bobeta kelelo na ebandeli ya sanza,

na tango oyo sanza mobimba engengaka,

mpo na mokolo ya feti na biso !

5 Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele,

mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.

6 Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi

tango abundisaki Ejipito.

Nazali koyoka lokota oyo nayebi te :

7 « Nalongolaki mokumba

oyo ezalaki na mapeka na ye,

mpe maboko na ye elongwaki

na bowumbu ya kosimba bitunga»

8 Tango ozalaki koganga mpo na pasi,

nakangolaki yo,

nayanolaki yo kati na kake

epai wapi nabombamaki,

namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.

9 Bato na ngai, boyoka ngai !

Mpe nakokebisa bino.

Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai !

10 Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo,

okogumbamela nzambe mosusu te,

longola kaka ngai !

11 Nazali Yawe, Nzambe na yo,

oyo abimisaki yo na Ejipito ;

fungola malamu monoko na yo,

mpe nakotondisa yango.

12 Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te,

Isalaele aboyaki kotosa ngai.

13 Mpo na yango, natikaki bango kotambola

kolanda baposa ya mitema makasi na bango ;

mpe balandaki makanisi na bango.

14 Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai,

soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,

15 nalingaki mbala moko koyokisa

banguna na bango soni

mpe kobundisa bayini na bango.

16 Mpe bato oyo bayinaka Yawe

balingaki komikitisa liboso na Ye,

mpe etumbu na bango elingaki kowumela

mpo na libela.

17 Yawe alingaki koleisa Isalaele

bilei ya kitoko

mpe kotondisa bango na mafuta ya nzoyi.

Veja também