Publicidade

Uma só carne

Por Bíblia Online

O conceito de 'uma só carne' é o fundamento bíblico do casamento. Desde a criação, Deus uniu homem e mulher em uma aliança indissolúvel de amor, compromisso e intimidade.

A instituição divina do casamento

Deus criou o homem e a mulher e os uniu em aliança. O casamento é obra de Deus, e o que Ele juntou não separe o ser humano.

Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango. Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.

Boye, mobali alobaki :

« Tala na mbala oyo,

oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai,

mosuni ya mosuni na ngai.

Bakobenga ye mwasi,

pamba te awuti na mobali. »

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »

Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye,

akelaki bango na elilingi ya Nzambe ;

akelaki bango mobali mpe mwasi.

Yesu azongisaki :

— Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, » mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ? Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »

Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. » Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.

O mistério da união

Paulo ensina que a união conjugal é um grande mistério que aponta para Cristo e a Igreja. A intimidade reflete a comunhão espiritual plena.

Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba, pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye.

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.

Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba. Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.

Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto ? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba ? Ata moke te !

Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba akomi elongo na ye nzoto moko ? Pamba te elobama : « Bango mibale bakokoma nzoto moko. » Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali moko na Ye kati na Molimo.

Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !

Fidelidade e alegria

A aliança conjugal exige fidelidade, respeito e dedicação mútua. A Bíblia celebra a alegria da intimidade dentro do casamento.

Tika ete etima na yo epambolama,

mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,

oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,

lokola mboloko ya mafuta.

Tika ete tango nyonso,

mabele na ye etondisaka yo na esengo,

mpe bolingo na ye elangwisaka yo !

Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela

kolinga mwasi ya ndumba ?

Mpo na nini kosepela kosakana

na mabele ya mwasi mosusu ?

Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka. Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.

Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko.

Luis Carlos De Souza
Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-20_17-16-08-