Publicidade

Vitória

Por Bíblia Online

A vitória do cristão não depende de suas próprias forças, mas do poder de Deus que opera em nós. As Escrituras declaram que somos mais que vencedores por meio daquele que nos amou.

A vitória vem de Deus

O Senhor luta por nós. Quando confiamos nele, nenhuma arma forjada contra nós prosperará e nenhum inimigo prevalecerá.

Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akotambola elongo na bino mpo na kobundela bino liboso ya banguna na bino mpe kopesa bino elonga. »

Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo ; moko te akokoka kotelema liboso na yo. »

Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba,

kasi elonga ewutaka na Yawe.

Na nguya na Yo, obenganaki bikolo

mpe otiaki bakoko na biso ;

obetaki bikolo ya bapaya

mpe ofulukisaki bakoko na biso.

Pamba te ezalaki na mopanga na bango te

nde babotolaki mokili,

ezalaki mpe maboko na bango te

nde ebikisaki bango ;

kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali,

nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo,

pamba te ozalaki kolinga bango.

Mais que vencedores

Em todas as circunstâncias, a fé nos dá a vitória. O mundo tenta nos derrubar, mas Cristo já venceu o mundo e nos faz triunfar.

pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali : kondima na biso.

Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso. Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

Bolingo ya Nzambe epesaka elikya

Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?

Oh kufa, wapi elonga na yo ?

Oh kufa, wapi nguya na yo ? »

Nguya ya kufa ezali masumu, mpe nguya ya masumu ezali Mibeko. Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto !

Força para a batalha

Deus nos reveste com sua armadura espiritual, nos fortalece e nos encoraja. Mesmo que o justo caia sete vezes, ele se levanta.

Yango wana, bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kolonga na mokolo mabe ya Satana mpe kotelema ngwi kino na suka sima na bino kobunda.

pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo,

akotelema kaka ;

nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.

Yaka kosunga biso,

kangola biso liboso ya moyini !

Pamba te lisungi ya bato ezali pamba.

Ezala bato nkoto moko bakweyi

pembeni na yo,

mpe bato nkoto zomi,

na ngambo ya loboko na yo ya mobali,

ekozwa yo ata moke te.

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-22_10-02-25-