Publicidade

Apocalipse 19

Emoniseli ya liboso : elonga ya Klisto

11 Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo» Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo. 12 Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela ; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi. 13 Alati nzambala bazindisa na makila ; kombo na Ye ezali : « Liloba na Nzambe» 14 Mampinga ya Lola ezalaki kolanda Ye na likolo ya bampunda ya pembe ; balataki bilamba ya lino ya kitoko, ya pembe mpe ya peto. 15 Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. 16 Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo :

« Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo»

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-