23 Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki :
— Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe ? 24 Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ? 25 Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?
26 Yawe azongisaki :
— Soki nakuti na Sodome bato ya sembo tuku mitano, nakolimbisa engumba mobimba mpo na bango.
27 Abrayami alobaki lisusu :
— Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai. 28 Bongo soki motango na bato ya sembo ezali tuku minei na mitano ? Boni, okobebisa engumba mobimba mpo na bato mitano oyo bazangi ?
Yawe azongisaki :
— Soki nakuti bato ya sembo tuku minei na mitano, nakobebisa yango te.
29 Abrayami alobaki na Ye lisusu :
— Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku minei ?
Azongisaki :
— Soki bazali kaka tuku minei, nakobebisa yango te.
30 Bongo Abrayami alobaki :
— Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato ?
Azongisaki :
— Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te.
31 Abrayami alobaki :
—Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale ?
Azongisaki :
— Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te.
32 Bongo Abrayami alobaki :
— Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi ?
Azongisaki :
— Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te.
33 Sima na Yawe kosolola na Abrayami, akendeki ; mpe Abrayami azongaki na ndako na ye.