3 « Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso,
makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai ;
oleki na lokumu mpe na nguya.
4 Mobulu lokola mayi, okokende liboso te,
pamba te omataki na mbeto ya tata na yo,
esika oyo ngai nalalaka,
mpe okomisi yango mbindo.