24 Mpo na kondima, wana Moyize akomaki mokolo, aboyaki ete babenga ye « mwana mobali ya mwana mwasi ya Faraon. » 25 Aponaki komona pasi elongo na bato ya Nzambe, na esika ya kosepela mwa tango moke na bomoi ya masumu ; 26 pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.