17 Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te,
nzete ya vino eboti mbuma te,
nzete ya olive eboti mbuma te,
bilanga ebimisi bilei te,
bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango,
mpe bangombe ezali te kati na lopango.
18 Kasi ngai nakosepela kati na Yawe
mpe nakotondisama na esengo mingi
kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.
19 Nkolo Yawe azali makasi na ngai :
akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko,
apesaka ngai makasi ya komata
kino na likolo ya bangomba.
Wuta na buku ya motambolisi banzembo. Babetaki yango na mandanda.