Publicidade

João 11

21 Marte alobaki na Yesu :

— Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te ! 22 Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye.

23 Yesu alobaki na ye :

— Ndeko na yo akosekwa.

24 Marte azongiselaki Yesu :

— Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa.

25 Yesu alobaki na ye :

— Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi. 26 Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?

27 Marte azongisaki :

— Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-22_10-02-25-