Publicidade

Jeremias 29

11 Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino» elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu. 12 Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino. 13 Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba. 14 Nakomimonisa epai na bino» elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino» elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu»

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-