Pular para o conteúdo
Publicidade

Jeremi 31

31 Na mikolo ekoya» elobi Yawe,

« nakosala boyokani ya sika

elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda ;

32 ekozala ndenge moko te na boyokani

oyo nasalaki elongo na batata na bango

tango nasimbaki bango na loboko

mpo na kobimisa bango na Ejipito ;

pamba te bakataki boyokani na Ngai wana,

atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango»

elobi Yawe.

33 « Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele,

sima na mikolo wana»

elobi Yawe :

« Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango,

nakokoma yango kati na mitema na bango,

nakozala Nzambe na bango,

mpe bango bakozala bato na Ngai.

Veja também