Pular para o conteúdo
Publicidade

Luka 9

Ndenge nini kolanda Yesu

57 Wana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu :

Nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.

58 Yesu azongiselaki ye :

Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.

59 Yesu alobaki na mobali mosusu :

Landa Ngai.

Kasi mobali yango azongiselaki Ye :

Nkolo, pesa ngai nzela ya kokende nanu kokunda tata na ngai.

60 Yesu alobaki na ye :

Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.

61 Mosusu lisusu alobaki na Ye :

Nkolo, nakolanda Yo ; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka.

62 Yesu azongiselaki ye :

Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também