Pular para o conteúdo
Publicidade

Bileli 3:1-9

Pasi ya mosakoli

1 Nazali moto oyo amona pasi

na nzela ya fimbu ya kanda na Ye.

2 Amemaki ngai mpe atambolisaki ngai

kati na molili, kasi na pole te.

3 Solo, mokolo mobimba,

azalaki kobalola loboko na Ye

mpo na kotelemela ngai tango nyonso.

4 Abebisaki nzoto na ngai mpe poso na yango,

abukaki mikuwa na ngai.

5 Mpo na kotelemela ngai,

atongaki zingazinga na ngai

mir ya ngenge mpe ya pasi.

6 Atongelaki ngai ndako ya kovanda kati na molili,

lokola bato ya tango ya kala oyo bakufa.

7 Azingelaki ngai na bamir mpo ete nakima te ;

akangaki ngai na minyololo ya kilo.

8 Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi,

azali koyoka libondeli na ngai te.

9 Akangaki nzela na ngai na mabanga minene

mpe abebisaki banzela na ngai ya mike.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Lamentações
Ver todos os capítulos de Lamentações