Pular para o conteúdo
Publicidade

Bileli 3:21-26

21 Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka ;

oyo mpo na yango, nazalaka na elikya :

22 Bolamu ya Yawe esili te,

mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;

23 ekomaka ya sika tongo nyonso.

Solo, boyengebene na Yo ezali monene !

24 Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ;

yango wana nakotia motema epai na Ye. »

25 Yawe azali malamu

mpo na bato oyo batielaka Ye elikya,

mpo na bato oyo balukaka Ye !

26 Ezali malamu kozela na kimia

lobiko kowuta na Yawe !

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Lamentações
Ver todos os capítulos de Lamentações