28 Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata ? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka ! Esalaka te mpe etongaka bilamba te ; 29 nzokande, nazali koloba na bino ya solo ete ata Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango. 30 Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !