Pular para o conteúdo
Publicidade

Oze 11:1-4,8,9

Bolingo na Nzambe mpo na Isalaele

1 Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye,

mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.

2 Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye,

tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai.

Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka

mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.

3 Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimi

ndenge ya kotambola ;

namemaki bango na maboko na Ngai,

kasi basosolaki te

ete Ngai nde nazalaki kobatela bango.

4 Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo ;

nalongolaki bango ekangiseli na bakingo

mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.

Bolingo ekolonga

8 Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ?

Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ?

Mpo na nini nasala yo makambo

oyo nasalaka engumba ya Adima ?

Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo

lokola engumba ya Tseboyimi ?

Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai

mpe natondi na mawa makasi.

9 Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi,

nakobebisa lisusu Efrayimi te.

Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te !

Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ;

nakoya lisusu na kanda te.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.