Pular para o conteúdo
Publicidade

Masese 1

Maloba ya ebandeli

1 Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :

2 mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya

mpe kososola maloba ya mayele ;

3 mpo na kozwa mateya ya bwanya

oyo epesaka bizaleli ya sembo,

ya boyengebene mpe makambo ya alima ;

4 mpo na kopesa mayele epai ya bazoba,

mpe boyebi epai ya bilenge.

5 Tika ete moto ya bwanya ayoka yango,

mpe akobakisa bwanya na ye,

bongo moto ya mayele akoyeba mayele

ya kotambolisa bato ;

6 mpo na kososola masese mpe sambole,

maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.

Fungola ya bwanya

7 Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ;

bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também