Pular para o conteúdo
Publicidade

Provérbios 4

Batoli ya tata

1 Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata,

bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.

2 Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu ;

bobwaka mateya na ngai te.

3 Ngai mpe nazalaki mwana malamu

na miso ya tata na ngai,

boye mama na ngai alingaki ngai makasi

lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.

4 Tata na ngai azalaki koteya

mpe koloba na ngai boye :

« Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai,

bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,

5 zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te,

kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,

6 kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo,

linga yango mpe ekobomba yo.

Veja também