8 longola nzela na yo pembeni na ye
mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
9 noki te akoya kokaba lokumu na yo
epai ya bato mosusu,
mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;
10 noki te bapaya bakotonda na biloko oyo yo omoneli pasi,
mpe mbuma ya mosala na yo ekokende
na ndako ya mopaya ;
11 noki te okokoma kolelalela na suka
tango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,
12 mpe oloba : « Mpo na nini nayinaki mateya,
mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli ?
13 Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai
mpe napesaki litoyi te epai ya bato
oyo bazalaki koteya ngai ?
14 Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo,
kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »