Mokolo ya Yawe
14 Mokolo monene ya Yawe ekomi pene,
solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza.
Boyoka ! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo ;
ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.
15 Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi,
mokolo ya pasi mpe ya somo,
mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama,
mokolo ya butu mpe ya molili makasi,
mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,
16 mokolo ya kobeta bakelelo mpe ya makelele ya bitumba
mpo na kobundisa bingumba batonga makasi
mpe bandako milayi oyo batonga makasi.
17 Nakotindela bato pasi ya makasi :
bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga,
pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ;
bakopanza makila na bango lokola putulu
mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.
18 Na mokolo ya kanda na Yawe,
ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te.
Na moto ya zuwa na Ye,
mokili mobimba ekozikisama,
pamba te akosukisa na mbalakata
bavandi nyonso ya mokili.