Publicidade

Céu

Por Bíblia Online

O céu é a morada eterna de Deus e a esperança final do cristão. A Bíblia descreve o céu como lugar de glória, alegria e comunhão perfeita com o Criador.

A morada de Deus

Na casa de meu Pai há muitas moradas. Os céus declaram a glória de Deus — e um dia habitaremos lá eternamente.

Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ?

Bimoniseli mibale ya Nzambe

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe,

mapata elobaka misala na Ye.

Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola,

mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.

Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe

oyo akela likolo mpe mabele.

Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai

soki Yo te ?

Mpe awa na mokili, nasepela na nani

soki na Yo te ?

Ebandeli ya mokili

Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili. Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.

Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola

mpe atia miboko na yango na mabele ;

abengaka mayi ya ebale monene

mpe asopaka yango na etando ya mabele.

Kombo na Ye ezali : Yawe.

« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku,

bongo Ngai nazanga komona ye »

elobi Yawe.

« Boni, natondisa likolo mpe mabele te »

elobi Yawe.

Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te.

Cidadania celestial

A nossa cidadania está nos céus. Ajuntai tesouros no céu, não na terra. O céu é a pátria do cristão.

Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo.

Mateya na tina na bomengo

Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango. Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango ;

Yesu alobaki :

Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.

Yesu azongisaki :

Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.

Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.

bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te.

Esperança eterna

Seremos arrebatados para encontrar o Senhor nos ares. Ainda não se manifestou o que havemos de ser — mas seremos semelhantes a Ele.

pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso. Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo ; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.

Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka. Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto.

Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela !

Amen.

Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.

Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.

Bozongi na Yelusalemi

Sima na Yesu koloba bongo, amemamaki, wana bazalaki kotala, mpe lipata moko ezipaki Ye na miso na bango.

Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.

Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba. Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.

« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele,

ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali

likolo koleka banzela na bino,

mpe makanisi na Ngai ezali likolo

koleka makanisi na bino.

Likambo nyonso ezalaka na tango na yango

Likambo nyonso ezalaka na tango na yango,

mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango,

na se ya moyi.

Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa :

ndenge moto ayaki, ndenge mpe akozonga.

Bongo litomba na ye ezali nini ?

Asali kaka mpo na mopepe ?

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-