Dia das crianças
As crianças são preciosas aos olhos de Deus. Jesus as acolheu, abençoou e ensinou que delas é o Reino dos Céus — modelos de fé, pureza e humildade.
Jesus e as crianças
Deixai vir a mim as crianças. Jesus abraçou, abençoou e honrou as crianças como modelo de fé para os adultos.
Yesu alobaki :
— Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Lingomba ya Masiya
Nani aleki monene ?
Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye :
— Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?
Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe alobaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo. Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.
Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo.
Lisese ya meme oyo ebungi
[
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! » Balobaki na Yesu :
— Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ?
Yesu azongiselaki bango :
— Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te :
« Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana
oyo bazali nanu komela mabele,
ozwaki lokumu na Yo ? »
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango :
— Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
Instruir e proteger
Instrui a criança no caminho de Deus. Elas são herança do Senhor — presentes sagrados que devemos educar com amor.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Yawe akoteya bana na yo nyonso,
mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.
Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.
Baboti mpe bana
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
‘ Tika ete Yawe apambola yo
mpe abatela yo !
Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye
mpe apesa yo ngolu na Ye !
Tika ete Yawe amona yo
mpe apesa yo kimia ! ’ ›