Ensinar
Ensinar é mandamento e dom. A Bíblia exorta pais, líderes e mestres a transmitir a verdade divina com fidelidade, paciência e sabedoria para as próximas gerações.
Ensinar a Palavra
Toda Escritura é útil para ensinar. Quem ouve as palavras de Jesus e as pratica é como o homem sábio que construiu sobre a rocha.
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo, mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.
Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :
mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya
mpe kososola maloba ya mayele ;
mpo na kozwa mateya ya bwanya
oyo epesaka bizaleli ya sembo,
ya boyengebene mpe makambo ya alima ;
mpo na kopesa mayele epai ya bazoba,
mpe boyebi epai ya bilenge.
Tika ete moto ya bwanya ayoka yango,
mpe akobakisa bwanya na ye,
bongo moto ya mayele akoyeba mayele
ya kotambolisa bato ;
mpo na kososola masese mpe sambole,
maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.
Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ;
bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.
Instruir as gerações
Ensina a criança nos caminhos de Deus. A geração que não conhece o Senhor perde a herança espiritual da fé.
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso. Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,
mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,
mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo
mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
Kanga yango tango nyonso na motema na yo,
lata yango na kingo na yo.
Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo,
ekobatela yo tango okolala pongi
mpe ekosolola na yo tango okolamuka.
Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole,
makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te,
kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,
kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo,
linga yango mpe ekobomba yo.
Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya,
pesa biloko nyonso oyo ozali na yango
mpo ete ozwa mayele.
Simba yango makasi, mpe ekotombola yo ;
yamba yango, mpe ekopesa yo lokumu.
Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo,
kobwaka yango te, batela yango malamu
mpo ete ezali bomoi na yo.
Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu
mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe.
Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso,
pamba te makambo nyonso oyo tosalaka,
wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
Longola lokuta na monoko na yo,
mpe longola mabe na bibebu na yo.
Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso,
mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.
Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela,
mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.
Kotengama te,
ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi,
longola makolo na yo na mabe.
Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi,
ekangolaka na mitambo ya kufa.
Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;
koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.
Nzembo ya Azafi.
Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai !
Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai !
Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese,
nakosakola makambo oyo ebombama
wuta na tango ya kala.
Makambo oyo toyoka, oyo toyebi,
oyo batata na biso bayebisa biso.
Tokobombela yango bakitani na bango te,
kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima
nkembo ya masanzoli ya Yawe,
nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.
Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa ; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele.
Fidelidade no ensino
Quem ensina com fidelidade merece dupla honra. Cuidado com doutrinas falsas — permaneçam na doutrina de Cristo.
Bakambi oyo batambolisaka malamu misala ya Lingomba basengeli kozwa lifuti mbala mibale, mingi-mingi ba-oyo basalaka mosala ya kopanza Sango malamu mpe ya koteya. Pamba te Makomi elobi : « Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma, » mpe « mosali asengeli na lifuti na ye. »
Kima masolo oyo ezanga tina mpe efingaka Nzambe, pamba te ememaka bato oyo bamipesaka na yango mosika na Nzambe. Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Kati na bango, tozali na Imene mpe Filete
Moto nyonso oyo azali kowumela te kati na mateya ya Klisto, kasi abimi libanda na yango, azali moko te na Nzambe ; nzokande moto oyo azali kowumela kati na mateya yango azali moko na Tata mpe na Mwana.
Tango mikolo ya feti ekomaki na kati-kati, Yesu akendeki na Tempelo mpe akomaki koteya. Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana :
— Ndenge nini moto oyo ayekola te akoki koyeba Makomi boye ?
Yesu azongiselaki bango :
— Makambo oyo nazali koteya ewuti epai na Ngai te, kasi ewuti epai na Ye oyo atindi Ngai. Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko. Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.