Paciência
A paciência é fruto do Espírito e virtude essencial da vida cristã. Deus é paciente conosco, e nos chama a ser pacientes com os outros e nas provações.
A paciência de Deus
Deus é clemente e tardio em irar-se. Sua paciência revela seu desejo de que todos se arrependam e cheguem ao conhecimento da verdade.
Yawe ayokelaka bato mawa
mpe asalelaka bango bolamu,
asilikaka noki te mpe atonda na bolingo ;
Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye ; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.
Balingami na ngai, ezali na likambo moko oyo bosengeli te kobosana : mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola mibu nkoto moko, mpe mibu nkoto moko ezali lokola mokolo moko.
Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te.
Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino,
pamba te atonda na ngolu mpe na mawa,
asilikaka noki te mpe atonda na bolingo,
abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.
Kasi mpo na tina wana, Nzambe ayokelaki ngai mawa mpo ete, kati na ngai oyo naleki na masumu, Yesu-Klisto atalisa motema monene na Ye, oyo ezangi ndelo lokola ndakisa epai ya bato oyo bakondimela Ye mpo na kozwa bomoi ya seko.
Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu,
atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa.
Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo :
Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !
Esperar com paciência
Os que esperam no Senhor renovam as forças. A paciência produz caráter, e o caráter produz esperança que não decepciona.
Talela Yawe !
Zala makasi mpe yika mpiko !
Talela Yawe !
Batela kimia liboso ya Yawe
mpe talela Ye ;
kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye,
mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai,
yoka koganga na ngai
wana nazali kosenga lisungi,
pamba te nazali kobondela nde Yo.
Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo tokozela yango na molende.
mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi ; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema ; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende ;
Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia.
Paciência nas provações
O amor é paciente. A paciência é marca de maturidade espiritual e nos permite perseverar mesmo quando as circunstâncias são adversas.
Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.
Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
Tika ete Nzambe oyo apesaka bato molende mpe mpiko apesa bino makanisi moko, bamoko elongo na bamosusu, kolanda mokano ya Yesu-Klisto,
bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi ; boyikanaka mpiko kati na bolingo,
Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.
teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.
Perseverança até o fim
Quem perseverar até o fim será salvo. O domínio próprio é maior que a conquista de uma cidade.
Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.
Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe,
mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi
koleka moto oyo abotolaka bingumba.
Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele,
kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka
bozoba na ye.
Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.
Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe,
bino babulami na Ye ;
bokumisa Kombo na Ye ya bule.