4 Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ?
Yebisa ngai soki ozali mayele.
5 Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye ?
Nani amekaki molayi na yango na singa ?
8 Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi
tango yango ebimaki wuta na mabele,
12 Boni, osili kopesa tongo mitindo
to osili kolakisa tongo-tongo esika na yango,
31 Okoki kokanga na singa Minzoto sambo esika moko
to kofungola basinga ya Minzoto minei ?