14 Tika ete mokolo ya mbotama na ngai elakelama mabe !
Tika ete mokolo oyo mama na ngai abotaki ngai
epambolama te !
15 Tika ete alakelama mabe,
moto oyo amemelaki tata na ngai sango
oyo esepelisaki motema na ye :
« Baboteli yo mwana, mwana mobali ! »
16 Tika ete moto yango akoma lokola bingumba
oyo Yawe abuki na mawa te !
Tika ete ayoka bileli na tongo
mpe makelele ya bitumba na midi.
17 Mpo na nini Nzambe abomaki ngai te
kati na libumu ya mama na ngai,
oyo alingaki kozala kunda na ngai,
mpe libumu na ye elingaki kobomba ngai libela na libela ?
18 Mpo na nini penza nabimaki
na libumu ya mama na ngai ?
Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano,
mpe kosukisa bomoi na ngai na soni ?