Pular para o conteúdo
Publicidade

Yobo 1:13-19

13 Mokolo moko, tango bana mibali mpe bana basi ya Yobo bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso, 14 ntoma moko ayaki epai na Yobo mpo na koyebisa ye : « Bangombe ezalaki kobalola mabele ya bilanga, mpe ba-ane ezalaki kolia matiti pembeni wana ; 15 bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »

16 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Moto ya Nzambe ekweyi longwa na likolo mpe ezikisi bibwele mpe basali ! Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »

17 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »

18 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso, 19 mopepe moko ya makasi ewutaki na ngambo mosusu ya esobe mpe eyaki kobeta basonge minei ya ndako. Ndako ekweyeli bango, mpe bango nyonso basili kokufa. Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.