Publicidade

Jó 28

12 Kasi bakoki komona bwanya wapi ?

Mayele evandaka wapi ?

13 Moto ayebaka motuya na yango te,

pamba te bakoki komona yango te

kati na mokili ya bato ya bomoi.

14 Libulu ya mozindo elobi : « Ezali kati na ngai te »

mpe ebale monene elobi : « Ezali epai na ngai te»

15 Bakoki kosomba yango te

na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata ;

16 bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri

to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ;

17 wolo to diama ekoki te kokokana na yango,

bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.

18 Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te

liboso na yango.

Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.

19 Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te,

mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto.

20 Boye, bwanya ewutaka wapi ?

Mayele evandaka wapi ?

21 Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi,

ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo.

22 Libebi mpe kufa elobi : « Kaka sango na yango

nde ekomaki na matoyi na biso»

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-