4 Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ?
Yebisa ngai soki ozali mayele.
5 Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye ?
Nani amekaki molayi na yango na singa ?
6 Makolo ya makonzi na yango evandi likolo ya nini ?
Nani atiaki libanga na yango ya songe,
7 tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo
mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ?
8 Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi
tango yango ebimaki wuta na mabele,
9 tango nakomisaki mapata elamba na yango,
mpe molili, singa ya kokangela yango,
10 tango natielaki yango bandelo,
tango natielaki yango bikuke ya makasi,
11 tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ;
awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? ›