Publicidade

Jó 9

Eyano ya Yobo epai ya Bilidadi

1 Yobo azongisaki :

2 « Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba,

mpe nayebi yango malamu !

Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu

akoki kozala sembo liboso ya Nzambe ?

3 Ata, na mbala nkoto moko,

ameki kobeta tembe na Nzambe,

akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.

4 Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi,

mpe nguya na Ye ezali monene ;

nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-