39 Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :
— Tika makelele ! Vanda nye !
Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
40 Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
— Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?
41 Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »