Maloba ya ebandeli
1 Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :
2 mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya
mpe kososola maloba ya mayele ;
3 mpo na kozwa mateya ya bwanya
oyo epesaka bizaleli ya sembo,
ya boyengebene mpe makambo ya alima ;
4 mpo na kopesa mayele epai ya bazoba,
mpe boyebi epai ya bilenge.