Publicidade

Provérbios 18

1 Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye,

atelemelaka bososoli nyonso.

2 Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa

tango ya kokanisa,

kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.

3 Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka ;

soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.

4 Maloba ya monoko ya moto ezalaka

lokola mayi ya mozindo ;

etima ya bwanya ezalaka lokola mayi ya ebale

oyo etondi makasi.

5 Ezali malamu te kolongisa moto mabe

mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.

6 Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana,

mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.

7 Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa,

mpe bibebu na ye ezalaka motambo

mpo na molimo na ye moko.

8 Maloba ya moto ya songisongi ezalaka

lokola bilei ya kitoko,

ekitaka na esengo kino na libumu.

9 Moto oyo azongaka sima na mosala na ye

azali ndeko ya mobebisi.

10 Kombo ya Yawe ezali

lokola ndako molayi batonga makasi ;

moyengebene akimelaka kuna

mpe azwaka ebombamelo ya makasi.

11 Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye,

oyo batonga makasi ;

akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.

12 Liboso ete moto akweya,

motema na ye ekomaka na lolendo ;

kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

13 Kopesa eyano liboso ya koyoka

ezali liboma mpe bozoba.

14 Kimia kati na motema elendisaka moto

na tango ya bokono,

kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-