Pular para o conteúdo
Publicidade

Ezayi 1:15-18

15 Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela,

nakolongola miso na Ngai likolo na bino ;

ezala soki bosambeli mingi,

nakoyoka bino te,

pamba te maboko na bino etondi na makila.

16 Bomisukola mpe bomipetola,

bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai !

Botika kosala mabe !

17 Boyekola nde kosala malamu,

boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola,

bobundela mwana etike,

bokotela mwasi oyo akufisa mobali !

18 Boya sik’oyo, tosilisa likambo, »

elobi Yawe.

« Ezala masumu na bino ezali motane makasi,

ekokoma pembe lokola mvula ya pembe ;

ata ezali motane lokola ngola,

ekokoma lokola bapwale ya meme.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.