12 Ndenge nini penza okweyi wuta na likolo,
oh monzoto oyo engengaka na tongo,
mwana mobali ya tongo makasi ?
Bakweyisi yo penza kino na mabele,
yo moto oyo ozalaki kopanza bikolo !
13 Ozalaki komilobela kati na motema :
‹ Nakomata kino na Lola,
nakotombola kiti na ngai ya bokonzi
kino na likolo ya minzoto ya Nzambe
mpe nakovanda na ngomba epai wapi banzambe basanganaka,
na suka ya mokili ya ngambo ya nor ;
14 nakomata kino na likolo ya mapata,
nakomikomisa lokola Ye-Oyo-Aleki-Likolo. ›
15 Kasi okiti nde na mokili ya bakufi,
na se penza ya libulu.